Commit b93ef03a authored by David Haslam's avatar David Haslam

Merge branch 'footnotes' into 'master'

Tab delimited footnotes See merge request !12
parents ad45e9c8 7cfb6dbe
This diff is collapsed.
This diff is collapsed.
1,1. Bakokaki kolongola Ema ya Likita, ndako esantu ya ba-Israel, mpe kopika yango o esika esusu.
1,4. Mpo ya kolakisa polele ’te ye moto abonzeli Nzambe moboma moye, moto asengeli kotia loboko o motó mwa nyama, ata mbala mingi mo-Levi abomaki moboma mpe aseseki mwango.
2,11. Bakoki kotia ata nkisi ata eloko esusu te, eye ekobongola bilei bya mabonza mpe ekokomisa byango mbindo.
2,13. Bakoki kotia mongwa o bilei bya mabonza, mpo mongwa mokobongola byango te, mokobatela byango kutu.
4,1. O eteni eye ya 4 bakomi bobele maye matali masumu nganga mokonzi asalaki o ntango ya milulu mya losambo, mpo akokisi myango te lokola etindami.
4,3. Bazalaki kopakola bobele banga­nga bakonzi na mafuta masantu (Bob 29,7 ; Lv 21,10).
5,1. Bobele likambo lya nzeneneke wa lokuta (5,1) lizali lisumu lya solo. Maye matangemi o 5,2-3 mazali masumu mpenza te : babuki ekila o maye matali bopeto o milulu. Soko moto, ntango alakeli, akanisi malamu te, to alangwi (5,4), ase­ngeli nde kokokisa elako ya ye, solo ?
7,20. Balongola ye o libota lya ye : baboma ye te, kasi babengana ye, bongo Nzambe asala na ye lokola alingi.
8,8. Tala Bob 28,15+ ; 28,30+.
9,6. Mpo ya kolakisa bato ’te azali o ntei ya bango, Nzambe akolakisaka ba-ngo bilembo, limpata to mwinda makasi.
9,24. Elakisi ’te Nzambe andimi libo-nza liye.
12,2. Mwasi oyo auti kobota asengeli kokokisa milulu mya bopetoli. Ya solo, asali lisumu te ; kasi tobosana te ’te ba-­Israel bazalaki kotala makila lokola ele­mbo ya bomoi.
12,3. Tala Lib 17,10+.
13,1. O bileko bya kala banganga (ba-médecin) bazalaki te. Banganga Nza­mbe, mpo bayekola mingi leka bato basusu, basengelaki kokata likambo lyoko lyoko lya malali ma maba. Bongo soko akanisi ’te mabe maye makoleka na moto mosusu, apekisi moto ona kofanda o kati ya bato basusu.
16,10. Kala ba-Israel bakanisaki ’te bilimo ndenge na ndenge bizalaki o eliki, biye bikokaki kokoma pene na bato mpe kosala bango mabe. Azazel azalaki moko wa bango. Mobu na mobu ba-Israel bazalaki kotindela Azazel ntaba mobali moko mpo ya kokitisa motema mwa ye, mpo ’te aya kotungisa bato te.
17,11. O miso ma Nzambe basumuki bakoki na liwa ; kasi mpo ya ngolu ya ye enene, andimi ’te bato baye bakoka kobonzela ye makila ma nyama o esika ya makila ma bango moko.
18,1. Bikila binso bikomami awa bizali se na ntina ya kobatela mpe komemya bomoi mpe mabala ma bato.
18,21. Ba-Kanana bazalaki kobonzela nzambe wa bango Molok (mokonzi wa mboka ya bawa) bana ba bango. Nzambe apekisi ba-Israel likambo lyango.
19,1. Na bopesi bato mibeko miye, Nzambe alingi ’te bato balingana mpe bazala na bosembo o makambo manso : bazala basantu, mpo ye moko azali mosantu.
19,10. O mibeko miye tomoni ’te Nzambe alingi ’te babola na bampaya bakoka kofanda o kati ya ba-Israel bo bato ba ekolo ya bango.
19,18. O Bondeko bwa Kala ba-Israel batindamaki kolinga bato ba ekolo ya ba-ngo, Yezu akolakisa ’te balinga mpe bato basusu, ata ya ekolo nini (Mt 22,39).
19,27. Ba-Israel balanda mimeseno mya bampaya (ba-Kanana) te, mpo ’te baku­mbamela mpe banzambe ba bango te.
19,28. Nzambe wa bomoi alingi ’te bato ba ye babanga bawei te ; bakanisa mpe te ’te bawei bakoki kosala bango mabe. Batika bikelakela mpe biyambayamba, biye bato ba bikolo bisusu bakosalaka mpo ya ‘kokitisa mitema mya bawa’. Nzambe akokamba manso, apesi bawei likoki lyoko te lya konyokolo biso.
19,36. Se lokola baprofeta basilaki kokebisa (Am 8,4-6) bato : bokosa babola te.
23,3. Mokolo mwa Sabato : tala Lib 2,3+.
23,6. Tala Bob 12,1+ ; 12,15+.
23,15. Tala Bob 23,14+.
23,24. Ba-Israel bazalaki kosantisa mokolo mwa yambo mwa sanza ya nsambo, moye mazalaki mpe mokolo mwa sanza ya sika, mpo eulani na Sabato, mokolo mwa nsambo ya poso.
23,34. Biema bya ba-Israel bisalemaki na mposo ya ntaba te, kasi na bitapi mpe na nkasa. Bazalaki kotia biema biye o kati ya bilanga bya vino. O Bob 23,16 eye-nga eye etangemaki ‘eyenga ya Bobuki mbuma ya yambo’.
23,43. Ntina ya liboso ya biyenga bya ba-­Israel : kotondo Nzambe mpo ya mbuma babukaki. Kasi o mikolo mina bazalaki mpe kokundola malamu manso Nza­mbe asalaki bango : ndenge babikaki o Ezipeti (Pasika) mpe akati na bango bondeko (eyenga ya Poso). O eyanga ya Biema bazalaki kokundola ndenge Nzambe afandisaki bankoko ba bango o biema o eliki.
25,1. Se lokola basengelaki kopema o mokolo mwa nsambo (Sabato), basengelaki kopemisa bilanga nsima ya mibu motoba.
25,8. O mobu mwa Lisabwi bato ba­nso basengelaki kozongisa mabelé manso basombaki o mibu mileki : balingaki kopekisa bongo ’te bato ba nkita bakoma na mabelé mingi koleka.
25,23. Na mibeko miye (25,23-55) balingaki kobatela bato bazalaki na biloko to mabelé mingi te. Moto asengelaki ­koteke mingi, ata komiteke bo moombo, asengelaki kobwaka elikya te, mpo ako­zwa binso lisusu o mobu mwa Lisabwi.
26,9. Bondeko boye Nzambe akati na ba-Israel bozali ntina enene mpenza ya makambo ma bokumisi Nzambe o miso ma ba-Israel. Yango wana tokoki kota­nga likambo lya Bondeko bwa Nzambe mbala ebele o Biblia.
\ No newline at end of file

1,11. Soko Noemi abotaki bana babali basusu, bango nde basengelaki kobala basi bazenge ba bandeko ba bango. Kasi Noemi alobi na bakilo ba ye ’te asili aleki mibu mya kobota bana babali, baye bakoki kobala bango.
1,15. O bileko bya kala bato ba bikolo binso, ba-Israel lokola, bakanisaki ’te ekolo na ekolo esengeli na nzambe wa yango. Moke moke ba-Israel bakomi koyeba ’te Nzambe wa solo azali se moko, bobele Yawe ; nzambe mosusu azali te.
2,2. Bamama baye babale bazalaki babola. Engebene na mibeko (Mbk 24,19-22 ; Lv 19,9-10) bakoki kolokoto mbuma o bilanga nsima ya bobuki, kasi mbala esusu bankolo bazalaki kolingisa yango te.
3,4. Booz akei kolala o ndako te, mpo alandi momeseno mwa kolala penepene na buma iye abuki, mpo ’te bayiba yango te.
4,6 (+ 4,20b). Moto oyo andimi kokoma nkolo wa elanga esusu, kasi alingi kobala Rute te. Soko Rute akobotela ye mwana, mwana oyo akokoma nkolo wa elanga eye.
4,11. Tala Lib 35,23-26.
4,12. Tala Lib 38.
4,17. Obed lokola ’te ‘mosaleli’, (wa Nzambe). Mwana oyo akokoma nkoko wa mokonzi Davidi.

2,1. O kati ya bankoko ba Abarama mokomi atangi bobele Izaka na Ismael (1,28), mpe o kati ya bankoko ba Izaka atangi Ezau na Yakob. O kati ya bana 12 ba Yakob atangi nkoko moko moko wa Yese, mpo Davidi, mokonzi wa Israel akobotama o libota lya ye (2,15).
3,1. Tokoki kokamwa mpo mokomi alingaki kotanga mabota 12 ma Israel na bituka binene bya bango ba bileko bya kala (4,1.24 ; 5,1.11.23 ; ...), nzokande ayebisi molongo mwa bakonzi kin’o boo­mbo (3,10-16), mpe bankoko basusu ba Davidi nsima ya boombo (3,17-24). Mbele asali bongo mpo amoni ntina enene ya kolakisa Davidi.
5,26. Ntango Teglat-Falasar akomi mpe mokonzi wa Babilon, akamati nkombo ya ibale, Pul (797 liboso lya Y.K.). Mbala mwa mingi akei kobundisa bikolo o Esti mpe o Westi ya Yordane, mpe akangisi bato ba bango o boombo (2 Bak 15,19.29).
8,1. Tosili kotanga molongo mwa ba­nkoko ba Benyamin o 7,6-12. Mokomi apesi awa molongo moye lisusu, kasi na bokeseni. Mpo nini apesi nkombo iye lisusu ? Mpo bato mingi ba Benyamin bakoya kofanda o Yeruzalem (8,15-28 ;
9,7-9) ; alingi mpe kolakisa libota lya
Saul, mokonzi wa yambo wa Israel, oyo azalaki moto wa libota lya Benyamin.
9,1-34. Nkombo mingi itangemi o eteni eye ya 9 ikoki kotangema mpe o Ne 11 : ezali molongo mwa bato bafandi o Yeruzalem nsima ya boombo. Mpo ya kolakisa ’te ezali engumba esantu, bakomi mingi nkombo ya banganga Nzambe,
ba-Levi, ‘babonzami’ na basaleli basusu ba Tempelo.
9,1. Toyebi te buku nini etangemi awa ; kasi ezali 1 Bak to 2 Bak te !
9,35-44. Eteni ya yambo ya buku eye esuki awa : mokomi atangeli biso milo­ngo mya bankoko banda Adamu kin’o Abarama ; na nsima atangi mabota 12, kasi mingi mpenza mabota Yuda mpe ma Benyamin, libota lya Levi mpe bato ba Yeruzalem. Sikawa akosolola na bokuse nsuka ya Saul, mokonzi wa yambo wa Israel. Na nsima akobanda lisolo lilai litali Davidi.
10,1-14. Banda awa mokomi apesi biteni binene bya buku ibale ya Samuel mpe ya Bakonzi. O buku ina okoki kotanga ndimbola mwa mingi ya maye makomami o buku eye.
12,1. Molongo moye mwa baye bala­ndi Davidi liboso ’te akoma mokonzi (12,1-23) mokokisi moye mokomami o buku ya Samuel. Na nsima apesi molo­ngo mwa bayangeli ba mabota 12 baye baluboli Davidi mokonzi wa Israel mobimba.
15,1-24. Awa mokomi akokisi lisolo liye likomami o 2 Sam 6,2-19 : alakisi mosala mwa banganga Nzambe na ba-Levi o ntango bakei kotika Sanduku ya Bo­ndeko o Engumba ya Davidi, mosala mwa bayembi mpe mwa baye babeti miziki. Asali yango mpo ’te banso batosa miti-ndo mya milulu miye.
16,7. Nzembo eye ezali na biteni ya Nz 105, Nz 96 na Nz 106. Mokomi alakisi manso Davidi asali mpo ya kobongisa milulu mya losambo.
16,39. Bazalaki kokumisa mingi Ga­baon, mwa o Nordi ya Yeruzalem, mpo o esika eye bazalaki na Ema eye Moze atongaki mpo ya kobomba Sanduku ya Bondeko o eliki (1 Mkl 21,29 ; 2 Mkl 1,3). Davidi atongisi Ema ya sika mpo ya kobomba Sanduku o Yeruzalem (16,1). O ntango ya Salomo naino Gabaon ekotikala ndako esantu ya liboso (1 Bak 3,4-15) tee bakosilisa kotonga Tempelo o Yeruzalem.
17,1-15. Awa tokotanga lisusu maloba ma profeta Natan (2 Sam 7), mpo ezalaki na ntina enene : yango elakisi bondeko Nzambe akati na Davidi, mpe ndenge bokonzi bwa ye bokoumela. Bakoyebisa mpe bato ba libota lya Davidi makambo mingi matali boyei bwa Mesiya.
18,1-13. Awa mokomi akutoli mingi maye matali boyangeli bwa Davidi
(o 2 Sam 9 - 1 Bak 2) ; atangi bobele ’te alongaki bitumba biike, mpe atiki maye makoki kolakisa mbeba ya Davidi. Alakisi mpe ’te, mpo ya bitumba biike, Davidi akoki kotonga Tempelo te (22,8 ; 28,3), kasi biloko akobotolo bikosalisa mingi o botongi Tempelo (29,2-5).
22,9. ‘Shelomoh’ o ebrei euti na liloba Shalom (boboto), awa Davidi azalaki moto wa bitumba.
23,1-32. O biteni 23-26 mokomi apesi milongo milai mya ba-Levi, banganga Nzambe, bayembi na bakengeli engebene na misala mya bango. Toyebi te o esika nini azwi nkombo iye inso.
28,1. Maye mokomi ayebisi te : makambo ma kwokoso Davidi ayokaki nta­ngo akomi mobange, mpe ndenge Adonia aweli kokoma mokonzi na Salomo (1 Bak 1). O eteni ya 28 balakisi Davidi lokola moto abongisi makambo ma bokitani na kimia, apesi bankumu ba Israel malako, mpe asengi bango ’te bale­ndisa Salomo o mosala mwa botongi Te­mpelo, mpe batosa mibeko mya Mokonzi.
29,1. Davidi apesi biloko binso bya nkita, biye abotoli mpe biye bizalaki bya ye moko, mpo ya mosala mwa botongi Tempelo ; bato banene babakisi mpe biloko mingi.
29,10. O losambo loye kitoko Davidi andimi ’te binso bizali na bato biuti na Nzambe ; baye babonzi biloko mpo ya botongi Tempelo bazongiseli Nzambe eteni ya biye akabelaki bango. Awa babonzi byango na motema semba, Nza­mbe akosepela na byango.
29,22. O 23,1 basili basololi ndenge bapakoli Salomo mafuta ma bokonzi. Bapakoli ya mango mbala ibale te.
2,1. O kati ya bankoko ba Abarama mokomi atangi bobele Izaka na Ismael (1,28), mpe o kati ya bankoko ba Izaka atangi Ezau na Yakob. O kati ya bana 12 ba Yakob atangi nkoko moko moko wa Yese, mpo Davidi, mokonzi wa Israel akobotama o libota lya ye (2,15).
3,1. Tokoki kokamwa mpo mokomi alingaki kotanga mabota 12 ma Israel na bituka binene bya bango ba bileko bya kala (4,1.24 ; 5,1.11.23 ; ...), nzokande ayebisi molongo mwa bakonzi kin’o boo­mbo (3,10-16), mpe bankoko basusu ba Davidi nsima ya boombo (3,17-24). Mbele asali bongo mpo amoni ntina enene ya kolakisa Davidi.
5,26. Ntango Teglat-Falasar akomi mpe mokonzi wa Babilon, akamati nkombo ya ibale, Pul (797 liboso lya Y.K.). Mbala mwa mingi akei kobundisa bikolo o Esti mpe o Westi ya Yordane, mpe akangisi bato ba bango o boombo (2 Bak 15,19.29).
8,1. Tosili kotanga molongo mwa ba­nkoko ba Benyamin o 7,6-12. Mokomi apesi awa molongo moye lisusu, kasi na bokeseni. Mpo nini apesi nkombo iye lisusu ? Mpo bato mingi ba Benyamin bakoya kofanda o Yeruzalem (8,15-28 ; 9,7-9) ; alingi mpe kolakisa libota lya Saul, mokonzi wa yambo wa Israel, oyo azalaki moto wa libota lya Benyamin.
9,1-34. Nkombo mingi itangemi o eteni eye ya 9 ikoki kotangema mpe o Ne 11 : ezali molongo mwa bato bafandi o Yeruzalem nsima ya boombo. Mpo ya kolakisa ’te ezali engumba esantu, bakomi mingi nkombo ya banganga Nzambe, ba-Levi, ‘babonzami’ na basaleli basusu ba Tempelo.
9,1. Toyebi te buku nini etangemi awa ; kasi ezali 1 Bak to 2 Bak te !
9,35-44. Eteni ya yambo ya buku eye esuki awa : mokomi atangeli biso milo­ngo mya bankoko banda Adamu kin’o Abarama ; na nsima atangi mabota 12, kasi mingi mpenza mabota Yuda mpe ma Benyamin, libota lya Levi mpe bato ba Yeruzalem. Sikawa akosolola na bokuse nsuka ya Saul, mokonzi wa yambo wa Israel. Na nsima akobanda lisolo lilai litali Davidi.
10,1-14. Banda awa mokomi apesi biteni binene bya buku ibale ya Samuel mpe ya Bakonzi. O buku ina okoki kotanga ndimbola mwa mingi ya maye makomami o buku eye.
12,1. Molongo moye mwa baye bala­ndi Davidi liboso ’te akoma mokonzi (12,1-23) mokokisi moye mokomami o buku ya Samuel. Na nsima apesi molo­ngo mwa bayangeli ba mabota 12 baye baluboli Davidi mokonzi wa Israel mobimba.
15,1-24. Awa mokomi akokisi lisolo liye likomami o 2 Sam 6,2-19 : alakisi mosala mwa banganga Nzambe na ba-Levi o ntango bakei kotika Sanduku ya Bo­ndeko o Engumba ya Davidi, mosala mwa bayembi mpe mwa baye babeti miziki. Asali yango mpo ’te banso batosa miti-ndo mya milulu miye.
16,7. Nzembo eye ezali na biteni ya Nz 105, Nz 96 na Nz 106. Mokomi alakisi manso Davidi asali mpo ya kobongisa milulu mya losambo.
16,39. Bazalaki kokumisa mingi Ga­baon, mwa o Nordi ya Yeruzalem, mpo o esika eye bazalaki na Ema eye Moze atongaki mpo ya kobomba Sanduku ya Bondeko o eliki (1 Mkl 21,29 ; 2 Mkl 1,3). Davidi atongisi Ema ya sika mpo ya kobomba Sanduku o Yeruzalem (16,1). O ntango ya Salomo naino Gabaon ekotikala ndako esantu ya liboso (1 Bak 3,4-15) tee bakosilisa kotonga Tempelo o Yeruzalem.
17,1-15. Awa tokotanga lisusu maloba ma profeta Natan (2 Sam 7), mpo ezalaki na ntina enene : yango elakisi bondeko Nzambe akati na Davidi, mpe ndenge bokonzi bwa ye bokoumela. Bakoyebisa mpe bato ba libota lya Davidi makambo mingi matali boyei bwa Mesiya.
18,1-13. Awa mokomi akutoli mingi maye matali boyangeli bwa Davidi (o 2 Sam 9 - 1 Bak 2) ; atangi bobele ’te alongaki bitumba biike, mpe atiki maye makoki kolakisa mbeba ya Davidi. Alakisi mpe ’te, mpo ya bitumba biike, Davidi akoki kotonga Tempelo te (22,8 ; 28,3), kasi biloko akobotolo bikosalisa mingi o botongi Tempelo (29,2-5).
22,9. ‘Shelomoh’ o ebrei euti na liloba Shalom (boboto), awa Davidi azalaki moto wa bitumba.
23,1-32. O biteni 23-26 mokomi apesi milongo milai mya ba-Levi, banganga Nzambe, bayembi na bakengeli engebene na misala mya bango. Toyebi te o esika nini azwi nkombo iye inso.
28,1. Maye mokomi ayebisi te : makambo ma kwokoso Davidi ayokaki nta­ngo akomi mobange, mpe ndenge Adonia aweli kokoma mokonzi na Salomo (1 Bak 1). O eteni ya 28 balakisi Davidi lokola moto abongisi makambo ma bokitani na kimia, apesi bankumu ba Israel malako, mpe asengi bango ’te bale­ndisa Salomo o mosala mwa botongi Te­mpelo, mpe batosa mibeko mya Mokonzi.
29,1. Davidi apesi biloko binso bya nkita, biye abotoli mpe biye bizalaki bya ye moko, mpo ya mosala mwa botongi Tempelo ; bato banene babakisi mpe biloko mingi.
29,10. O losambo loye kitoko Davidi andimi ’te binso bizali na bato biuti na Nzambe ; baye babonzi biloko mpo ya botongi Tempelo bazongiseli Nzambe eteni ya biye akabelaki bango. Awa babonzi byango na motema semba, Nza­mbe akosepela na byango.
29,22. O 23,1 basili basololi ndenge bapakoli Salomo mafuta ma bokonzi. Bapakoli ya mango mbala ibale te.
This diff is collapsed.
1,1. Ezalaki mobu mwa yambo mwa bokonzi bwa Siro o Babilon (539).
1,1. Profeta oyo asakolaki ’te boombo o Babilon bokoumela mibu 70 (Yer 25,11-12).
1,8. Mbele nkumu oyo azalaki mwana wa mokonzi oyo akei o boombo. Ba-Persi bakomisi ye moyangeli. Mbele batindaki ye ayangela misala mya botongi Tempelo (5,13-16 ; 6,14-16).
2,1. Bakonzi ba mabota 12 bakokamba ba-Israel ntango bakozonga o ekolo ya bango. Zorobabel, oyo atangemi liboso, azalaki mwana wa libota lya mokonzi (1 Mkl 3,19) ; ye mpe azalaki moyangeli wa Yuda (Ag 1,14 ; 2,2) ; Yozue azalaki nga­nga mokonzi.
2,63. Toyebi te soko balakisi awa Sesbasar to Zorobabel.
3,3. Baye batikali ezalaki mingi ba-­Samaria, ba-Moab na ba-Amon, baye bayei kofanda o Yuda, nsima ya bokei bwa bato o boombo.
3,7. Bazalaki kotinda nzete ya sédere ya Libano na nzela ya mai lokola o nta­ngo ya Salomo (1 Bak 5,20-25).
3,11. Tala Nz 110,5 ; Nz 136.
4,1. Ezali baye batangemi o 3,3+. Bato ba Yuda bazalaki kofunda bampaya baye batikalaki ’te bazalaki kokumisa Yawe te bo ebongi, engebene na mibeko mya Moze.
4,5. Siro akufi o 530 liboso lya Y.K. O bokonzi bwa Dario (521-486) bakoba­nda kotonga Tempelo lisusu (4,24 - 6,22).
4,6. Eteni eye (4,6-23) ebongi kozala awa te : na mbalakaka bakati lisolo lya botongi Tempelo, mpe babandi liye lya botongi bifelo bya Yeruzalem ; kasi ya­ngo ekosalema bobele nsima ya 486.
4,8. Rekum oyo azalaki kofanda o Samaria mpe azalaki koyangela Yuda.
4,10. Tala 2 Bak 17,24-41.
4,24. Molongo moye molandi 4,5. Tala 4,6.
5,1. Tala buku ya baprofeta baye.
6,2. Bakonzi ba Persi bazalaki kofanda o Suza ya Persi, o Ekbatane ya Medi mpe o Babilon.
6,15. Ezalaki o 515 liboso lya Y.K. Mibu 585 bakokumisa Yawe o Tempelo eye, tee ba-Roma bakobebisa yango mobimba ntango ba-Yuda batombokeli bango o mobu bwa 70 nsima ya Y.K..
6,22. Ezalaki mokonzi wa Persi oyo azalaki mpe koyangela Asur.
7,6. Esdra ayebaki kokoma minkanda malamu ; azalaki mpe komipesa na boyekoli Mobeko mwa Moze. Bateyi ba Mobeko bakozala mingi o ntango ya Yezu.
7,13. O etinda eye ekomami ’te :
1) ba-Yuda bakangemi o Babilon bakoki kozonga epai ya bango (7,13) ;
2) Mobeko mwa Moze mokomi mobeko mwa leta (7,25-26) ; 3) bakosalisa ba-Yuda mpe na mosolo (7,15-20).
7,27. Na maloba maye tobandi maloba ma Esdra ye moko ; nsima ya kobenisa Yawe, asololi mobembo mwa ye.
8,15. Toyebi te o esika nini mpenza Akava ezalaki o Babilon.
8,27. Darike ezalaki eteni ya mosolo ya wolo, eye Dario abimisaki.
9,2. O ntango ya kala mo-Israel akokaki kobala mwasi mompaya. Kasi na nsima ekomi ekila (Mbk 7,2-4), mpo basi baye bakokaki kokotisa likambo lya bokumisi bikeko o mabota ma ba-Israel. Nsima ya eleko ya boombo mabala maye makomaki mingi, mpo bato ba bikolo mingi basanganaki.
10,9. Mobu mwa ba-Yuda mobandi o sanza ya marsi ; sanza ya libwa ezalaki eleko ya mbula (novembele).
10,14. Baponoki bato batindami kotala libala lya moto moko moko.
10,15. Basusu bandimi likambo liye te, mpo bazalaki kokata makambo ma mabala se malembe malembe.
1,1. Ezalaki mobu mwa yambo mwa bokonzi bwa Siro o Babilon (539).
1,1. Profeta oyo asakolaki ’te boombo o Babilon bokoumela mibu 70 (Yer 25,11-12).
1,8. Mbele nkumu oyo azalaki mwana wa mokonzi oyo akei o boombo. Ba-Persi bakomisi ye moyangeli. Mbele batindaki ye ayangela misala mya botongi Tempelo (5,13-16 ; 6,14-16).
2,1. Bakonzi ba mabota 12 bakokamba ba-Israel ntango bakozonga o ekolo ya bango. Zorobabel, oyo atangemi liboso, azalaki mwana wa libota lya mokonzi (1 Mkl 3,19) ; ye mpe azalaki moyangeli wa Yuda (Ag 1,14 ; 2,2) ; Yozue azalaki nga­nga mokonzi.
2,63. Toyebi te soko balakisi awa Sesbasar to Zorobabel.
3,3. Baye batikali ezalaki mingi ba-­Samaria, ba-Moab na ba-Amon, baye bayei kofanda o Yuda, nsima ya bokei bwa bato o boombo.
3,7. Bazalaki kotinda nzete ya sédere ya Libano na nzela ya mai lokola o nta­ngo ya Salomo (1 Bak 5,20-25).
3,11. Tala Nz 110,5 ; Nz 136.
4,1. Ezali baye batangemi o 3,3+. Bato ba Yuda bazalaki kofunda bampaya baye batikalaki ’te bazalaki kokumisa Yawe te bo ebongi, engebene na mibeko mya Moze.
4,5. Siro akufi o 530 liboso lya Y.K. O bokonzi bwa Dario (521-486) bakoba­nda kotonga Tempelo lisusu (4,24 - 6,22).
4,6. Eteni eye (4,6-23) ebongi kozala awa te : na mbalakaka bakati lisolo lya botongi Tempelo, mpe babandi liye lya botongi bifelo bya Yeruzalem ; kasi ya­ngo ekosalema bobele nsima ya 486.
4,8. Rekum oyo azalaki kofanda o Samaria mpe azalaki koyangela Yuda.
4,10. Tala 2 Bak 17,24-41.
4,24. Molongo moye molandi 4,5. Tala 4,6.
5,1. Tala buku ya baprofeta baye.
6,2. Bakonzi ba Persi bazalaki kofanda o Suza ya Persi, o Ekbatane ya Medi mpe o Babilon.
6,15. Ezalaki o 515 liboso lya Y.K. Mibu 585 bakokumisa Yawe o Tempelo eye, tee ba-Roma bakobebisa yango mobimba ntango ba-Yuda batombokeli bango o mobu bwa 70 nsima ya Y.K..
6,22. Ezalaki mokonzi wa Persi oyo azalaki mpe koyangela Asur.
7,6. Esdra ayebaki kokoma minkanda malamu ; azalaki mpe komipesa na boyekoli Mobeko mwa Moze. Bateyi ba Mobeko bakozala mingi o ntango ya Yezu.
7,13. O etinda eye ekomami ’te :\x5Cfp 1) ba-Yuda bakangemi o Babilon bakoki kozonga epai ya bango (7,13) ;\x5Cfp 2) Mobeko mwa Moze mokomi mobeko mwa leta (7,25-26) ; 3) bakosalisa ba-Yuda mpe na mosolo (7,15-20).
7,27. Na maloba maye tobandi maloba ma Esdra ye moko ; nsima ya kobenisa Yawe, asololi mobembo mwa ye.
8,15. Toyebi te o esika nini mpenza Akava ezalaki o Babilon.
8,27. Darike ezalaki eteni ya mosolo ya wolo, eye Dario abimisaki.
9,2. O ntango ya kala mo-Israel akokaki kobala mwasi mompaya. Kasi na nsima ekomi ekila (Mbk 7,2-4), mpo basi baye bakokaki kokotisa likambo lya bokumisi bikeko o mabota ma ba-Israel. Nsima ya eleko ya boombo mabala maye makomaki mingi, mpo bato ba bikolo mingi basanganaki.
10,9. Mobu mwa ba-Yuda mobandi o sanza ya marsi ; sanza ya libwa ezalaki eleko ya mbula (novembele).
10,14. Baponoki bato batindami kotala libala lya moto moko moko.
10,15. Basusu bandimi likambo liye te, mpo bazalaki kokata makambo ma mabala se malembe malembe.
1,1. Awa tobandi lisolo lya Neemia, lokola ye moko akomi lyango.
1,1. Artaksasta wa 1 akomaki moko­nzi o 465 liboso lya Y.K..
1,3. Balendisi bifelo na bizibeli biye bato ba Babilon babebisaki o 587. Nta­ngo bautaki o boombo bameki kobongisa byango, kasi ba-Samaria bapekisi ba­ngo, ata mpe o ebandela ya bokonzi bwa Artaksasta naino (Esd 4,6-7.23).
1,11. ‘moto oyo’, nde mokonzi ; Neemia azalaki molaki wa ye.
2,6. Mibu zomi (445 tee 443) Neemia azalaki wana te (13,6) ; mbele alobi yango awa mpo ya bokei bwa mwa mikolo.
2,10. Sambalat na Tobia bazalaki ba-ntoma ba mokonzi wa Persi, kasi bazalaki kondimela ba-Samaria na ba-Amon.
2,13. Neemia ameki kotambola zongazonga na engumba, kasi akoki te mpo ya biteni bya efelo bilali wana kilikili.
2,19. Banguna ba Neemia bameki kobangisa ye, yango wana bayebisi ye ’te : « ba-Persi bakokanisa ’te bokotombokela bango, mpo bolingi kotonga bifelo bya Yeruzalem. »
3,1. Neemia alendisi bato banso mpo ’te bamipesa na mosala mwa botongi ; banso bandimi.
5,1. Mbele makambo ma mpasi ma­kweli bango : to babuki mbuma mingi te, to banguna bakoteli bango. Bato mingi bapesaki biloko to bana ba bango bo ndanga. Neemia asali makasi mpo ’te banso bazwa biloko bya bango, mpe bapesa baombo bonsomi lisusu mpo ya kolendisa boyokani o kati ya bato. Alobi ’te ye moko alukaki ata mbala yoko bobele bolamu bwa ye moko te, ntango bandeko ba ye bakomaki na mpasi.
8,9. Mbele babakisi nkombo ya Neemia bobele na nsima, mpo balingaki kotala ye lokola Esdra : ye moto asalaki ’te Mobeko mondimama na bakonzi ba leta. Kasi amilakisi ata moke te o ntango ya milulu myango.
8,14. Tala Lv 23,42.
9,2. Tala Esd 9,1-2 ; 10,11. Lisumu linene basali : ndenge basali bampaya malamu te.
10,1. Nsima ya litangi lya Mobeko banso bandimi kotosa makambo maye : babala lisusu basi bampaya te mpe batosa mobeko mwa Sabato.
11,2. Ba-Yuda baike balingaki kofanda o mboka pene na bilanga bya bango, kasi o Yeruzalem te, mpo ndako mingi ibebaki.
12,27. Lisolo lya molulu moye lisengeli kotangema nsima ya 6,16 ; mbele mokomi alingi koyebisa liboso ’te Yeruzalem ekomi na bato mwa mingi, Mobeko mondimami bo mobeko mwa leta, mpe
ndenge Esdra apetoli Yeruzalem.
12,31. Bifelo biye bizingi Yeruzalem bizalaki na bolai bwa metele 6 tee 10 ; nsonge ya byango ezalaki mwa enene ; yango elingisi bango kotambola wana na bato baike.
12,36. Mokomi abakisi nkombo ya Esdra awa (tala 8,9). Mbele azalaki o Yeruzalem te o ntango ena. Abakisi nkombo ya ye, mpo bango babale basali mosala se moko moye mopesi bango babale lokumu.
13,2. Tala Mbk 23,4-6.
13,7. Toyebi te mikolo boni aumeli sikawa o Yeruzalem. Ekomi ya kuna, amoni ’te bazalaki kotosa bitinda bisusu bya Mobeko te ; na mpiko enene akopalela bango.
13,10. O 12,44-47 totangi ’te bato bazalaki kopesa biloko na motema likabo ; kasi awa tokoki kotanga ’te bazalaki kosala bongo lisusu te.
13,19. Sabato ezalaki kobanda na mpokwa ya mokolo mwa motoba. Tala mpe ndimbola ya Sabato o Bob 20,8-11 ; Mit 15,32-36 ; Mbk 5,12-15 ; Yer 17,19-27.
13,24. Bana baye bazalaki koloba lokota la ba-Aram ; bato bazalaki koloba lokota la ebrei bazalaki lisusu mingi te.
\ No newline at end of file
1,1. Awa tobandi lisolo lya Neemia, lokola ye moko akomi lyango.
1,1. Artaksasta wa 1 akomaki moko­nzi o 465 liboso lya Y.K..
1,3. Balendisi bifelo na bizibeli biye bato ba Babilon babebisaki o 587. Nta­ngo bautaki o boombo bameki kobongisa byango, kasi ba-Samaria bapekisi ba­ngo, ata mpe o ebandela ya bokonzi bwa Artaksasta naino (Esd 4,6-7.23).
1,11. ‘moto oyo’, nde mokonzi ; Neemia azalaki molaki wa ye.
2,6. Mibu zomi (445 tee 443) Neemia azalaki wana te (13,6) ; mbele alobi yango awa mpo ya bokei bwa mwa mikolo.
2,10. Sambalat na Tobia bazalaki ba-ntoma ba mokonzi wa Persi, kasi bazalaki kondimela ba-Samaria na ba-Amon.
2,13. Neemia ameki kotambola zongazonga na engumba, kasi akoki te mpo ya biteni bya efelo bilali wana kilikili.
2,19. Banguna ba Neemia bameki kobangisa ye, yango wana bayebisi ye ’te : « ba-Persi bakokanisa ’te bokotombokela bango, mpo bolingi kotonga bifelo bya Yeruzalem. »
3,1. Neemia alendisi bato banso mpo ’te bamipesa na mosala mwa botongi ; banso bandimi.
5,1. Mbele makambo ma mpasi ma­kweli bango : to babuki mbuma mingi te, to banguna bakoteli bango. Bato mingi bapesaki biloko to bana ba bango bo ndanga. Neemia asali makasi mpo ’te banso bazwa biloko bya bango, mpe bapesa baombo bonsomi lisusu mpo ya kolendisa boyokani o kati ya bato. Alobi ’te ye moko alukaki ata mbala yoko bobele bolamu bwa ye moko te, ntango bandeko ba ye bakomaki na mpasi.
8,9. Mbele babakisi nkombo ya Neemia bobele na nsima, mpo balingaki kotala ye lokola Esdra : ye moto asalaki ’te Mobeko mondimama na bakonzi ba leta. Kasi amilakisi ata moke te o ntango ya milulu myango.
8,14. Tala Lv 23,42.
9,2. Tala Esd 9,1-2 ; 10,11. Lisumu linene basali : ndenge basali bampaya malamu te.
10,1. Nsima ya litangi lya Mobeko banso bandimi kotosa makambo maye : babala lisusu basi bampaya te mpe batosa mobeko mwa Sabato.
11,2. Ba-Yuda baike balingaki kofanda o mboka pene na bilanga bya bango, kasi o Yeruzalem te, mpo ndako mingi ibebaki.
12,27. Lisolo lya molulu moye lisengeli kotangema nsima ya 6,16 ; mbele mokomi alingi koyebisa liboso ’te Yeruzalem ekomi na bato mwa mingi, Mobeko mondimami bo mobeko mwa leta, mpe ndenge Esdra apetoli Yeruzalem.
12,31. Bifelo biye bizingi Yeruzalem bizalaki na bolai bwa metele 6 tee 10 ; nsonge ya byango ezalaki mwa enene ; yango elingisi bango kotambola wana na bato baike.
12,36. Mokomi abakisi nkombo ya Esdra awa (tala 8,9). Mbele azalaki o Yeruzalem te o ntango ena. Abakisi nkombo ya ye, mpo bango babale basali mosala se moko moye mopesi bango babale lokumu.
13,2. Tala Mbk 23,4-6.
13,7. Toyebi te mikolo boni aumeli sikawa o Yeruzalem. Ekomi ya kuna, amoni ’te bazalaki kotosa bitinda bisusu bya Mobeko te ; na mpiko enene akopalela bango.
13,10. O 12,44-47 totangi ’te bato bazalaki kopesa biloko na motema likabo ; kasi awa tokoki kotanga ’te bazalaki kosala bongo lisusu te.
13,19. Sabato ezalaki kobanda na mpokwa ya mokolo mwa motoba. Tala mpe ndimbola ya Sabato o Bob 20,8-11 ; Mit 15,32-36 ; Mbk 5,12-15 ; Yer 17,19-27.
13,24. Bana baye bazalaki koloba lokota la ba-Aram ; bato bazalaki koloba lokota la ebrei bazalaki lisusu mingi te.
\ No newline at end of file
1,1. Asuero (o Esd 4,6 atangemi Serses) azalaki mokonzi monene wa ba-­Persi (486-465).
1,12. Engebene na mimeseno mya ba-Persi mwasi moko te akoki koya o li­mpati, bobele mokonzi mwasi ; kasi Vasti aboyi koya mpo balangwi (1,10).
2,3. O eteni eye ya ndako ya mokonzi mapango mabale mazalaki : lopango loko la bangondo, lopango losusu la bamaka-ngo ba mokonzi (2,19).
2,6. Mbala ya yambo ba-Yuda baka­mbamaki o Babilon (598) : tala 2 Bak 24, 10-17.
2,7. Adasa (ebrei) ezalaki ‘mwa nzete ya nsolo mpimbo’ ; Ester azalaki nzambe mwasi wa bato ba Babilon (Ishtar), oyo azalaki kobatelaka bango o makambo ma bolingi mpe ma bitumba. Mardokai, ata azalaki mo-Yuda, azalaki na nkombo ya nzambe Marduk, mobateli wa engumba Babilon.
3,7. Aman alingi kotuna banzambe ba ye mokolo nini mokobongela ye mpo abomisa ba-Yuda.
3,10. Moto akoki kolata mpete ya mokonzi soko oyo apesi ye makoki ma ye manso.
4,14. Mokomi alingi kotanga nkombo ya Nzambe te. Soko Ester azali na mpiko te, ye mpe akokufa elongo na bato ba ye, kasi Nzambe akobikisa ekolo ya ye na nzela esusu.
5,7. Ester abangi koloba noki, abombi elikya ’te mokonzi akondimela ye malamu. Se o ntango ena Aman akei kolengele mobimbi mpo ya kotingisa Mardokai ; mokolo mwa nsima akosenge mokonzi ndingisa ya kosala yango (5,4). Awa likama lya liwa lya Mardokai likomi pene, Ester abangi te koyebisa mokonzi ya­ngo.
6,3. Tala o 2,21-22 ndenge bayokani mpo ya kosala mabe.
7,6. Mokonzi ayoki mabe ntango ayoki ndenge Ester afundi Aman polele.
7,8. Mokonzi akosi ’te Aman alingaki kobebisa mwasi wa ye, mpo akoka kofunda ye na makambo mabale.
8,3. Ester abikisi bongo bomoi bwa ye moko mpe bwa Mardokai, kasi asengeli kobikisa bato ba ye banso ; yango wana esengeli ’te baboma etinda ya bobomi bango. Nzokande etinda eye abimisaki, mokonzi azalaki koboma yango te (1,19). Yango wana Ester atangi bobele « mi­nkanda miye mosuli Aman akomaki ».
8,11. Etinda eye elingisaki ba-Yuda bobele bamibatela na baye bakaneli ba­ngo, kasi noki balimboli yango lokola bazwi ndingisa ya koboma banguna ba­nso. Ata Ester, oyo amilakisi moto wa motema boboto, andimi ’te basala bongo (9,13-15). Toyebi ’te mokonzi wa ba-Persi ata moko te akokaki kolingisa ’te baboma bato ba ye ; kasi tobosana te ’te o buku Ester basololi makambo te maye masalemi solosolo mpenza ; balingaki bobele kopesa ndakisa (na makambo makasi) ’te Nzambe akotumbolaka baye banyokoli bato ba ye ntina te.
9,21 Ut’o sekulo ya 2 liboso lya Y.K. ba-Yuda bazalaki kosepela mikolo mya 14 mpe mya 15 mya sanza Adar (februali-marsi). O mikolo miye bazalaki kolia, komele mpe kopesana makabo. Bamonoki momeseno moye o bikolo bisusu. Bobele na nsima bakomisi yango eyenga ya bokundoli maye manso Nzambe asali mpo ya kobikisa ba-Yuda, na mpe nde­nge Ester azwelaki bato ba ye libiki.
\ No newline at end of file
1,1. Asuero (o Esd 4,6 atangemi Serses) azalaki mokonzi monene wa ba-­Persi (486-465).
1,12. Engebene na mimeseno mya ba-Persi mwasi moko te akoki koya o li­mpati, bobele mokonzi mwasi ; kasi Vasti aboyi koya mpo balangwi (1,10).
2,3. O eteni eye ya ndako ya mokonzi mapango mabale mazalaki : lopango loko la bangondo, lopango losusu la bamaka-ngo ba mokonzi (2,19).
2,6. Mbala ya yambo ba-Yuda baka­mbamaki o Babilon (598) : tala 2 Bak 24, 10-17.
2,7. Adasa (ebrei) ezalaki ‘mwa nzete ya nsolo mpimbo’ ; Ester azalaki nzambe mwasi wa bato ba Babilon (Ishtar), oyo azalaki kobatelaka bango o makambo ma bolingi mpe ma bitumba. Mardokai, ata azalaki mo-Yuda, azalaki na nkombo ya nzambe Marduk, mobateli wa engumba Babilon.
3,7. Aman alingi kotuna banzambe ba ye mokolo nini mokobongela ye mpo abomisa ba-Yuda.
3,10. Moto akoki kolata mpete ya mokonzi soko oyo apesi ye makoki ma ye manso.
4,14. Mokomi alingi kotanga nkombo ya Nzambe te. Soko Ester azali na mpiko te, ye mpe akokufa elongo na bato ba ye, kasi Nzambe akobikisa ekolo ya ye na nzela esusu.
5,7. Ester abangi koloba noki, abombi elikya ’te mokonzi akondimela ye malamu. Se o ntango ena Aman akei kolengele mobimbi mpo ya kotingisa Mardokai ; mokolo mwa nsima akosenge mokonzi ndingisa ya kosala yango (5,4). Awa likama lya liwa lya Mardokai likomi pene, Ester abangi te koyebisa mokonzi ya­ngo.
6,3. Tala o 2,21-22 ndenge bayokani mpo ya kosala mabe.
7,6. Mokonzi ayoki mabe ntango ayoki ndenge Ester afundi Aman polele.
7,8. Mokonzi akosi ’te Aman alingaki kobebisa mwasi wa ye, mpo akoka kofunda ye na makambo mabale.
8,3. Ester abikisi bongo bomoi bwa ye moko mpe bwa Mardokai, kasi asengeli kobikisa bato ba ye banso ; yango wana esengeli ’te baboma etinda ya bobomi bango. Nzokande etinda eye abimisaki, mokonzi azalaki koboma yango te (1,19). Yango wana Ester atangi bobele « mi­nkanda miye mosuli Aman akomaki ».
8,11. Etinda eye elingisaki ba-Yuda bobele bamibatela na baye bakaneli ba­ngo, kasi noki balimboli yango lokola bazwi ndingisa ya koboma banguna ba­nso. Ata Ester, oyo amilakisi moto wa motema boboto, andimi ’te basala bongo (9,13-15). Toyebi ’te mokonzi wa ba-Persi ata moko te akokaki kolingisa ’te baboma bato ba ye ; kasi tobosana te ’te o buku Ester basololi makambo te maye masalemi solosolo mpenza ; balingaki bobele kopesa ndakisa (na makambo makasi) ’te Nzambe akotumbolaka baye banyokoli bato ba ye ntina te.
9,21. Ut’o sekulo ya 2 liboso lya Y.K. ba-Yuda bazalaki kosepela mikolo mya 14 mpe mya 15 mya sanza Adar (februali-marsi). O mikolo miye bazalaki kolia, komele mpe kopesana makabo. Bamonoki momeseno moye o bikolo bisusu. Bobele na nsima bakomisi yango eyenga ya bokundoli maye manso Nzambe asali mpo ya kobikisa ba-Yuda, na mpe nde­nge Ester azwelaki bato ba ye libiki.
\ No newline at end of file
This diff is collapsed.
This diff is collapsed.
This diff is collapsed.
1,1. Bobele mwana moko wa Davidi akomaki mokonzi, kasi awa mokomi atangi Kohelet mwana wa Davidi mpo alingi kotanga nkombo ya moto wa bwanya oyo ayebani mingi ; na yango alandi momeseno mwa bakomi ba eleko ya ye.
1,3. Litomba lyoko te likoki na mpasi amiyokisi.
1,12. Ata Salomo, mokonzi monene na nkita ebele, moto wa bwanya bonene, azalaki na bolamu bwa solo te. Bongo bato bake baloba nini ?
2,14. Kohelet akanisi liwa, lokola bankoko ba Afrika bayebisi yango o biyele.
2,16. Mbala mingi bazalaki koteya
bongo te : bazalaki kokumisa moto wa bwanya lokola moto bakoki kobosana te.
3,1. Maye bato bakotongaka mpe bakokolisaka, bakobuka mpe bakoboma mango na nsima. Na nsuka manso makokoma lokola mazalaki liboso.
3,11. Bato bayebi makambo masusu ma ntango eleki, ata maye makoya, kasi bayebi te ntina nini basengeli kozo­ngela mbala na mbala maye basili kosala. Maye Nzambe abongisi na bwanya bwa ye maleki mayele ma bato.
3,21. Moto nyonso asengeli kokufa, se lokola nyama. Kasi mosakoli amituni soko liwa lizali nsuka mpenza ya makambo manso ma moto. O 12,7 akomi ’te ‘mpema ya moto ekozonga epai ya Nzambe’ ; akomi yango liboso ’te Yezu ayela bato mateya matali nsekwa ya bato mpe bomoi bwa lobiko.
4,13. Mbele mokomi akanisi mokonzi moko, oyo ye ayebi ; kasi alingi kolakisa awa bakonzi banso te.
4,14. Mpo bato balembi mokonzi wa bango oyo akomi mobange, bakoki kondima ata nani mpo akitana ye, ata moto mabe. Kasi na nsima bakomono ’te mokonzi oyo wa sika aleki oyo wa liboso na bolamu te.
4,17. Moto akei koyoka mateya ma bato ba bwanya asali malamu leka oyo akei kobonza mabonza na motema bozoba.
5,14. Awa akomi ‘libumu lya mama’, mokomi akanisi liboso mbotama ya moto, na mpe ndenge akozonga o mabelé (mama wa bato banso) esika autaki.
7,6. Móto mwa nzube mokosalaka makelele, kasi mokopelaka makasi te, mpe mokoki kobelisa biloko o nzungu noki te. Se bongo moto zoba akosekeke makasi, kasi nani akokoma ata na mwa ndambo ya bwanya na boyoki masolo ma ye ?
7,26. Mwasi oyo, nde mwasi ndu­mba oyo akotiela moto zoba motambo (tala Biy 5,3-14 ; 7,5-27 ; 22,14 ; 23,27-28). Kasi mosakoli apesi mwasi wa bolongani lokumu mingi.
7,28. Mosakoli amoni ’te babali mi­ngi bazali bato ba bwanya te, kasi baleki basi. Tobosana te ’te o ntango ya kala bazalaki kokanisa ’te babali baleki basi o makambo manso. Nzokande o Lib 1,27 basili kokoma ’te ‘Nzambe akeli bango babale lokola ye moko azali’ ; ata bakeseni, bakokani.
10,8. Nyoka ekomibombaka mbala mingi o kati ya mabanga, mpe ekoki koswa moto na mbalakaka. Na ndakisa eye mosakoli ayebisi ’te moto akoki koyeba malamu na mabe te, maye makouta na misala mya ye.
10,16. Tala Iz 3,4 ; Biy 31,4-7.
11,1. Bakoki kolimbola eyele eye boye : moto akei na mosolo mingi mpo asala mombongo na masuwa, akozo­nga na biloko mingi biye auti koso­mba, mpe akozwa bongo litomba lya solo ; lokola ’te : moto ameki eloko te, ako­zwa mpe eloko te.
12,3. Mbele balakisi awa ndenge moto mobimba akonuna ; maboko, makolo, mino, miso, matoi, mongongo : ma­nso makolembe.
\ No newline at end of file
1,1. Bobele mwana moko wa Davidi akomaki mokonzi, kasi awa mokomi atangi Kohelet mwana wa Davidi mpo alingi kotanga nkombo ya moto wa bwanya oyo ayebani mingi ; na yango alandi momeseno mwa bakomi ba eleko ya ye.
1,3. Litomba lyoko te likoki na mpasi amiyokisi.
1,12. Ata Salomo, mokonzi monene na nkita ebele, moto wa bwanya bonene, azalaki na bolamu bwa solo te. Bongo bato bake baloba nini ?
2,14. Kohelet akanisi liwa, lokola bankoko ba Afrika bayebisi yango o biyele.
2,16. Mbala mingi bazalaki koteya bongo te : bazalaki kokumisa moto wa bwanya lokola moto bakoki kobosana te.
3,1. Maye bato bakotongaka mpe bakokolisaka, bakobuka mpe bakoboma mango na nsima. Na nsuka manso makokoma lokola mazalaki liboso.
3,11. Bato bayebi makambo masusu ma ntango eleki, ata maye makoya, kasi bayebi te ntina nini basengeli kozo­ngela mbala na mbala maye basili kosala. Maye Nzambe abongisi na bwanya bwa ye maleki mayele ma bato.
3,21. Moto nyonso asengeli kokufa, se lokola nyama. Kasi mosakoli amituni soko liwa lizali nsuka mpenza ya makambo manso ma moto. O 12,7 akomi ’te ‘mpema ya moto ekozonga epai ya Nzambe’ ; akomi yango liboso ’te Yezu ayela bato mateya matali nsekwa ya bato mpe bomoi bwa lobiko.
4,13. Mbele mokomi akanisi mokonzi moko, oyo ye ayebi ; kasi alingi kolakisa awa bakonzi banso te.
4,14. Mpo bato balembi mokonzi wa bango oyo akomi mobange, bakoki kondima ata nani mpo akitana ye, ata moto mabe. Kasi na nsima bakomono ’te mokonzi oyo wa sika aleki oyo wa liboso na bolamu te.
4,17. Moto akei koyoka mateya ma bato ba bwanya asali malamu leka oyo akei kobonza mabonza na motema bozoba.
5,14. Awa akomi ‘libumu lya mama’, mokomi akanisi liboso mbotama ya moto, na mpe ndenge akozonga o mabelé (mama wa bato banso) esika autaki.
7,6. Móto mwa nzube mokosalaka makelele, kasi mokopelaka makasi te, mpe mokoki kobelisa biloko o nzungu noki te. Se bongo moto zoba akosekeke makasi, kasi nani akokoma ata na mwa ndambo ya bwanya na boyoki masolo ma ye ?
7,26. Mwasi oyo, nde mwasi ndu­mba oyo akotiela moto zoba motambo (tala Biy 5,3-14 ; 7,5-27 ; 22,14 ; 23,27-28). Kasi mosakoli apesi mwasi wa bolongani lokumu mingi.
7,28. Mosakoli amoni ’te babali mi­ngi bazali bato ba bwanya te, kasi baleki basi. Tobosana te ’te o ntango ya kala bazalaki kokanisa ’te babali baleki basi o makambo manso. Nzokande o Lib 1,27 basili kokoma ’te ‘Nzambe akeli bango babale lokola ye moko azali’ ; ata bakeseni, bakokani.
10,8. Nyoka ekomibombaka mbala mingi o kati ya mabanga, mpe ekoki koswa moto na mbalakaka. Na ndakisa eye mosakoli ayebisi ’te moto akoki koyeba malamu na mabe te, maye makouta na misala mya ye.
10,16. Tala Iz 3,4 ; Biy 31,4-7.
11,1. Bakoki kolimbola eyele eye boye : moto akei na mosolo mingi mpo asala mombongo na masuwa, akozo­nga na biloko mingi biye auti koso­mba, mpe akozwa bongo litomba lya solo ; lokola ’te : moto ameki eloko te, ako­zwa mpe eloko te.
12,3. Mbele balakisi awa ndenge moto mobimba akonuna ; maboko, makolo, mino, miso, matoi, mongongo : ma­nso makolembe.
\ No newline at end of file
1,4. Awa batangi Nzambe te, mokonzi Salomo mpe te, kasi mobali wa bolongani. O Palestina bameseneki kotanga mobali na mwasi ‘mokonzi na mokonzi mwasi’ o mokolo mwa libala lya bango.
1,5. Bana basi ba Yeruzalem (Sion) : baninga baye bazingi mwasi wa bolongani, oyo akoloba na bango (1,5-7 ; 2,7 ; 3,5 ; 5,8 ; 8,4). Bango mpe bakoloba na ye (1,8 ; 5,9 ; 6,1 ; 7,1).
2,8. O nzembo ya liboso mobali na mwasi bazalaki elongo. Mbele o nzembo eye ya ibale bakabwani : mwasi azali epai ya baboti ba ye o engumba ; mobali auti o mboka mpe ayei kotala o lininisa, abengi mwasi mpo alanda ye.
3,1. Na mbalakaka mobali oyo abeteki o lininisa alimwi : yango elakisi ’te base­ngelaki kolonga makambo ma kwokoso mingi. Mwasi akei koluka ye o engumba o kati ya butu, mpo alingi mobali wa ye mingi mpenza !
3,11. Lokola o moulani mokomami o Mt 25,1-13, baninga ba mwasi babyangemi mpo bakende kokutana na mobali.
4,8. Mbele balingi kolakisa awa ’te mobali asengi mwasi atika esika eye ezali mosika, mpo ya makama mingi (nyama ya zamba) mpe aya kofanda o lopango la ye.
5,2. Nzembo eye ya inei eulani mingi na eye ya ibale : o kati ya butu lisusu mobali ayei kobetele ezibeli ya ndako ; mwasi azilisi ye mwa moke ; ntango akei kofungola ndako, mobali alimwi ; akei lisusu koluka ye o bisika mingi bya engumba, tee tee amoni ye. Oyo alingi moninga mingi akokuta ye, ata asengeli koluka ye mingi.
6,4. Tirsa ezalaki mboka-mokonzi ya liboso ya ekolo ya Nordi. Mobali akumisi mwasi wa ye mingi, yango wana alobi ’te aleki basi, bana basi na bamakango banso ba mokonzi Salomo.
8,1. Eteni eye (8,1-3) ezali na mwa nzembo. O ntango ena bobele baboti na ba­ndeko ba ye bakokaki kozinga elenge mwasi ekopi ; soki te, amiyokisi nsoni.
8,4. Maye makomami awa o (8,4-12) makabwani na biteni bike. Mbele o eteni 8-10 tokoki kotanga bobele ndambo ya lisolo liye bankoko batika.

1,1. Mokomi ayebisi ndenge Yeruzalem ekomi na mpasi mpe bato ba Yeruzalem bakambami o boombo. Balakisi Yeruzalem lokola mwasi bozenge oyo azali komilela mpe kondima mabe ma ye ; abondeli Nzambe aya kosalisa ye mpe atumbola banyokoli ba ye.
1,2. Bata ba bikolo bya penepene baye balakelaki bato ba Yeruzalem lisalisi o etumba na Babilon, kasi batikaki bango (Yer 4,30 ; Ez 16,37-40 ; 23,22-29).
1,15. Mai matane ma mbuma ya vino o ekamelo mazali komonono lokola makila. Bato ba Babilon basopaki makila ma bato ba Yeruzalem, lokola bakamolaki bango o ekamelo.
1,19. Tala 1,2... .
2,1. –Esilisi mokomi kolakisa maye makweli bakonzi, banganga Nzambe, baprofeta, bakolo na bana (1-12), akebisi Sion (13-17), akundoleli bato ba ye maloba ma bokosi ma baprofeta ba lokuta, mpe asengi bango bamilela.
–Ebonga eye ezali Tempelo : tala Ez 43,7 ; Nz 99,5 ; 132,7.
3,1. Liboso mokomi amileli mpo ya mpasi inso ikweli ye (1-21). Na nsima apesi malako ma bato ba bwanya matali mpasi ikoki kokwela bato mpe bolamu bwa Nzambe (22-39), mpe ale­ndisi bandeko ba ye mpo ’te bandima ’te basali masumu mpe bazongela Nza­mbe (40-47) ; na nsuka amileli lisusu (48-66). Mbele na bomileli boye akanisi mpasi ya bato banso.
4,1. Mpasi enene ekweli bato banso : bana bake bazali kokufa na nzala (3-4), bato ba nkita bakomi babola mpenza (5), bilenge babali bakomi kozanga bokasi (7-8), basi basusu balei bana ba bango (10). Solo mpasi ekweli bato ba­nso, ná banganga Nzambe ná baprofeta ná bakolo ná mokonzi wa ekolo (13-20). Nzokande Nzambe akolimbisa mpe akobongisa bango (22).
4,3. Maligbanga mazali ndeke ilai, leka bato ; iyebi kopimbwa te, kasi ikotambolaka mbangu mpenza. Liboso bazalaki kokanisa ’te maligbanga izalaki kolinga bana ba yango te, mpo ikokundaka makei ma yango o nse ya zelo ; nzokande ikofandelaka makei te, mpo moi makasi mokosalaka ’te makei mafungwana. Awa balakisi bato lokola maligbanga mpo bato mingi batiki bana ba bango ntango mpasi enene ekweli bango.
4,15. Nzoto ya bato ba Yeruzalem etondi na makila ma mpota ; bakomi bongo lokola bato ba maba, baye bakoki kokoma pene na bato basusu te (Lv 13,45-46).
4,21. Ba-Edom, baye bazalaki koyina ba-Israel, basepelaki na bomoni ’te Yeruzalem ebebi ; o ntango ena babotoloki ndambo ya mabelé ma bango (2 Bak 24,2 ; Ez 25,12-14 ; 35,1-15).
5,1. Nzembo eye ezali losambo : basengi Nzambe abatela bato ba ye, mpe atala mpasi inso bazali koyoka.
5,8. Bankumu ba bango moko bazalaki koyangela bango lisusu te ; base­ngelaki kotosa mokonzi wa Babilon na basaleli ba ye, baye batangemi na bokinoli ‘baombo’ awa.
5,13. Mabanga ma konika mbuma ya mampa mazali bozito mingi ; ata bato bazali na makasi bakoki kokumba mango bobele na mpasi.
5,19. Nkembo na nguya ya Nzambe ibongwanaka te, ata bato ba ye bakomi na mpasi enene.

1,2. Bato banso bamoni mpasi enene eye ekweli ekolo. Ata babange bamoni bongo naino te.
1,4. Mapalela ndenge na ndenge mayei kosilisa mbuma inso o bilanga ; nzala enene ekongala o ekolo.
1,6. Bato ba ekolo esusu : mapalela ebele lokola limpinga lya basoda.
1,8. Profeta azali koloba awa na bato babyangemi mpo ’te bamilela o miso ma Nzambe.
1,9. Elongo na mpata eye bazalaki kobonza ntongo mpe mpokwa inso o Tempelo ya Yawe, bazalaki kobonza fufu ya mbuma ya mampa, mafuta na vino. Awa biloko biye bikomi koza­nga, bakoki kobonza mabonza ma mokolo na mokolo lisusu te lokola etindami (Bob 29,38-42 ; Mit 28,3-8).
1,13. Bazalaki kolata ngoto bo ele­mbo ya lilaka.
1,15. Mpasi eye mapalela mayokisi elakisi ’te Nzambe alingi akoto o ma­ka­mbo ma bato. Baprofeta bakotangaka mokolo mwango ‘mokolo mwa Yawe’. Nzambe akoki kondima te ’te bato baike bakoba kosala masumu o Israel mpe o bikolo bisusu ntango basemba na bato batau bazalaki kobunda na mpasi ; akotumbola bato babe mpe akopesa basemba mbano ekoki na ba­ngo. Mbala inso likambo linene lizalaki kokwela ekolo, balobaki ’te ezalaki mokolo mwa Yawe. Kasi Mokolo monene mwa Yawe mokoya o nsuka ya molóngó, ntango Nzambe akokata ma­kambo ma bato banso (Yl 2,1 ; 4,14 ; Am 2,16 ; 5,18 ; Sof 1,7 ; Abd 15 ; Ez 30, 3). O miso ma bakristu mokolo mona mokozala mpe mokolo mwa ‘boyei bwa Kristu’ (Bik 2,20 ; 1 Kor 1,8 ; 2 Kor 1,14 ; 1 Tes 5,2 ; 2 Tes 2,2 ; 2 Pe 3,10).
1,19. Ntango mpasi enene ya mapalela ekokwela ekolo, mbula ekonoko mpe te, bongo biloko binso bikokauka.
2,2. Tala 1,4+.
2,13. Yoel ateyi ’te bato basengeli kobongola mitema, soki te ná losambo ná mabonza ma bango makozala se mpamba.
2,15-17 : Tala 1,13-14.
2,27. Nzambe alakeli bango bongo bobele soko bakoboya ye te.
3,1. Bato banso bakobondela nko­mbo ya Yawe bakozwa nguya ya komibongisa mpe ya kosakola o nkombo ya ye (Mit 11,29 ; Ez 11,19-20 ; 36,26-27). O mokolo mwa Pentekoste Petro asakoli ’te likambo lyango lisalemi na boyei bwa Elimo Santu (Bik 2,17-25).
3,3. Makambo maye mazali se bile­mbo ; na bilembo biye bazalaki kolakisa ’te Nzambe akoya na nguya enene.
4,4. Tiro, Sidoni na ba-Filisti bafu­ndami awa mpo basalaki Yeruzalem mabe mingi. Mokomi akanisi awa liboso ndenge bato bakangemaki o boo­mbo (o 597 na 587, mpe mbele mbala isusu na nsima). Bobele mpasi eye bayokisi ba-Israel ekokwela bango.
4,9-14. Profeta abyangi bato ba bikolo binso bameka kokoka na Yawe : ata na bibuneli nini ata na basoda boni bakokoka ye te. Mokolo Nzambe akosambisa bango banso, ekosalema na bango lokola bakokataka matiti ; bakonyata bango lokola mbuma ya vino o ekamoli.
4,18. Nsima ya bosakoli bitumbu bikokwela bato baboya Nzambe, profeta asakoli ’te Nzambe akokabela bato bandimi ye esengo enene ; akomi yango na bilili biye bato ba lelo bayebi lisusu te, kasi liteya liye lizali polele : mokolo moko Nzambe akokokisa malamu maye akani kosala bato ; mpe moto moko te akokoka kopekisa ye. Baprofeta bapesi ndakisa ya bolamu mwa mokili, kasi Yezu Kristu akolakisa ’te Nzambe alengeleli bato bomoi bwa seko bokozala na esengo nsuka te.

2,15-17. Tala 1,13-14.

1,2. Yawe akosambisa bato ba bikolo binso mpo ya mabe basali. Akopima bango mbula mpe bakoyoka nzala enene, mpo bisobe binso bikokauka.
1,4. Bakonzi baye babale ba Damasko, Azael na Ben-Adad, banguna ba Israel, bazalaki lisusu o ntango ya Amos te.
1,5. Na nkombo iye, Bikeat-Aven (engumba etondi na makambo maza­ngi bosembo) mpe Bet-Eden (ndako ya bisengo) bapesi Damasko, bazalaki kokinola engumba eye na mokonzi wa yango.
1,6. Na boteki bango bo baombo.
1,9. Yakob-Israel na Ezau-Edom, bankoko ba bikolo biye, bazalaki bana ba Izaka, kasi ut’o ebandela bazalaki koyokana te (Lib 25,22-34).
2,1. O bileko biye bya kala bazalaki kokanisa ’te bawei bakozwa bopemi o mboka ya bawa te, soko bakundaki (mi­nkuwa mya) bango malamu te ; kokunda moto te ezalaki likambo lya nsomo.
2,8. Ata ba-Samaria bapesaki nza­mbe wa bango nkombo Yawe, Yawe Nzambe aboyi kondima Tempelo eye na milulu bazalaki kosala wana.
2,16. ‘Mokolo mona’ : mokolo mwa Yawe (5,18). Balakisi bongo ’te lika­mbo linene likosalema : bazalaki na eli­kya ’te Nzambe akozongisela Israel loku­mu la ye la kala, akotumbola basumuki mpe akopesa basemba mbano. O Bondeko bwa Sika balakisi na yango boyei bwa Yezu o nsuka ya molóngó, mokolo bakokata makambo ma bato banso.
3,8. Moto oyo Nzambe abyangi ako­ki koboya te.
3,12. Soko nkosi ekeketi mpata, mokengeli wa yango asengelaki komemela nkolo wa ye eteni ya mpata eye, alakisa bongo ’te ateki yango te. Awa Nzambe ayebisi ’te bato mingi bakobika te o ntango ya mpasi enene eye ekokwela bango. Baprofeta bazalaki koteya bongo mbala mingi (Am 5,3.15 ; 9,8 ; Iz 4,2 ; 7,3 ; 10,20).
4,1. Balakisi basi ba Samaria awa lokola ngombe basi inene, iye izalaki o ekolo ya bango. Profeta apaleli bango mpo ya goigoi, lokoso mpe bolangwi bwa bango ; bazalaki mpe kopangana na babola te.
4,3. Ermon : ngomba esanda o Nordi ya Israel, o nzela eye bato bakokangema o boombo o Asur bakoleka.
4,5. Nzambe alobi bongo ’te alingi yango ata moke te.
4,12. Ekozala etumbu ya nsomo, kasi ekomami te soko etumbu nini.
5,2. Balakisi Israel, ekolo eye Nza­mbe aponi, lokola ngondo oyo alingi kobala. Kasi awa Israel aboyaki ye, eko­salema na ye lokola na mwasi akufi o bolenge bwa ye : akoyoka esengo ya libala mpe ya kobota te.
5,5. O bingumba biye ba-Israel bazalaki na ndako ya losambo iyebani mingi ; nzokande bazalaki kokumisa Yawe kuna malamu te.
5,26. Mbele babandaki kokumisa banzambe baye ba Asur o Samaria. Ndimbola ya molongo moye ekoki kozala boye : ntango bozalaki o eliki, nasepelaki bino, ata bokokaki kobo­nzela ngai mabonza te ; kasi sikawa bokobonzelaka banzambe ba lokuta, baye bakobatela bino te ntango bakokamba bino o boombo.
6,2. Awa bazalaki na nkita enene, bakanisaki ’te likambo lyoko likoki ko­kwela bango te.
6,12. Bobele na mpasi moto akoki kondima ndenge bazuzi babebi mpe­nza ; bazali na bosembo soki te ; malamu kutu andima ’te ngombe ikoki kokata mabelé o mbu !
6,14. Ba-Israel basepeli awa babotoli bingumba bike bibale, kasi bamoni te ’te ba-Asur balingi babotolo ekolo ya bango mobimba.
7,15. Nzambe akamati Amos na makasi : moto moko te akoki koboya soko Nzambe aponi ye (3,3-8).
8,3. Ata o ndako inene ya bakonzi bakolela makasi o mokolo mwa etu­mbu.
8,8. Lokola mai ma Nil makoki kobuta to kokita, se bongo ntango mokili mokoninganaka, okoki kokanisa ’te mabelé mazali kobuta mpe kokita.
8,9. Mokolo mwa Yawe : tala 2,16.
8,14. Lisumu linene lya ba-Samaria : mpo ya kokumisa Yawe, basalaki bikeko bya ngombe bya wolo ; mokonzi wa bango Yeroboam atindaki bango basala bongo o Betel mpe o Dan (1 Bak 12,29 ; Oz 8,5-6).
Kolaya na nkombo ya lisumu lya Samaria elakisi : kolaya na bikeko biye bipekisami na Mobeko mwa Moze.
9,1. O limoni Amos amoni ’te Nza­mbe apesi (anzelu ?) etinda abete makonzi ma tempelo ya Betel ; tempelo ekobukana mpe bato banso bakozala wana bakokufa.
9,3. Awa batangi nyoka ya masapo ma ba-Israel (nyoka enene o bozindo bwa mbu).
9,7. O miso ma Nzambe ba-Israel baleki bikolo bisusu na motuya te, ata baye bafandi mosika.
–Kaftor : esanga Kreta. Bankoko wa ba-Filisti babotamaka wana.
9,11. Mokolo Yawe akozongisela eko­lo ya ye mpe libota lya Davidi nkembo ya bango ya kala ; sikawa basambwi mpenza.
9,13. Elakisi ’te mbuma ikozala mi­ngi : bobele o ntango bakosilisa kobuka mbuma, bakosengela kolona mboto ya sika.

8,14. Lisumu linene lya ba-Samaria : mpo ya kokumisa Yawe, basalaki bikeko bya ngombe bya wolo ; mokonzi wa bango Yeroboam atindaki bango basala bongo o Betel mpe o Dan (1 Bak 12,29 ; Oz 8,5-6). Kolaya na nkombo ya lisumu lya Samaria elakisi : kolaya na bikeko biye bipekisami na Mobeko mwa Moze.
9,1. O limoni Amos amoni ’te Nza­mbe apesi (anzelu ?) etinda abete makonzi ma tempelo ya Betel ; tempelo ekobukana mpe bato banso bakozala wana bakokufa.
9,3. Awa batangi nyoka ya masapo ma ba-Israel (nyoka enene o bozindo bwa mbu).
9,7. O miso ma Nzambe ba-Israel baleki bikolo bisusu na motuya te, ata baye bafandi mosika.
–Kaftor : esanga Kreta. Bankoko wa ba-Filisti babotamaka wana.
9,11. Mokolo Yawe akozongisela eko­lo ya ye mpe libota lya Davidi nkembo ya bango ya kala ; sikawa basambwi mpenza.
9,13. Elakisi ’te mbuma ikozala mi­ngi : bobele o ntango bakosilisa kobuka mbuma, bakosengela kolona mboto ya sika.
\ No newline at end of file
This diff is collapsed.
This diff is collapsed.
This diff is collapsed.
This diff is collapsed.
This diff is collapsed.
This diff is collapsed.
This diff is collapsed.
This diff is collapsed.
This diff is collapsed.
This diff is collapsed.
This diff is collapsed.
This diff is collapsed.
This diff is collapsed.
This diff is collapsed.
This diff is collapsed.
This diff is collapsed.
This diff is collapsed.
This diff is collapsed.
This diff is collapsed.
This diff is collapsed.
This diff is collapsed.
This diff is collapsed.
This diff is collapsed.
This diff is collapsed.
This diff is collapsed.
This diff is collapsed.
This diff is collapsed.
This diff is collapsed.
This diff is collapsed.
This diff is collapsed.
This diff is collapsed.
This diff is collapsed.
This diff is collapsed.
This diff is collapsed.
This diff is collapsed.
This diff is collapsed.
This diff is collapsed.
This diff is collapsed.
This diff is collapsed.
This diff is collapsed.
This diff is collapsed.
This diff is collapsed.
This diff is collapsed.
Markdown is supported
0% or
You are about to add 0 people to the discussion. Proceed with caution.
Finish editing this message first!
Please register or to comment